VERBES

1. BATUNA TE ESIKA BAKEYI NA MBONDA MPO TANGO EKOBETA BAKOYOKA KAKA.


2. BASALA ZUWA TE MPO NA KEYI NA EBALE NAKOSILISA MAYI TE.

3. ATA MUTU OYO AVANDAKA MPEBENI YA EBALE ASUKOLOKA MPE NA CANTINE.

4. ZOBA BALAKISI YE SANZA AZALI KOTALA MOSAPI.

5. MWANA MUKIE BALAKISAKA YE KOLOBA KASI MUKOLO BALAKISAKA YE KOKANGA MUNOKO.

6. NZETE EZALI KOKWEYISA MAKASA NA YANGO.

7. ATA KUTU NA NDAKU YA MOBANGE BILOKO NIONSO BIZALAKA YA KALA TE.

8. MOTU YA MBONGO ALATAKA CHEMISE MIBALE NA MBALA MOKO TE.

9. BAZALI NA MBONGO YA KOSOMBA LIWA KASI BAZANGI PATIENCE YA KOZELA ZANDO EBANDA.

10. BALINGI MOTO EPELA KASI BALINGI KILO YA KONI TE.

11. ATA NA MBOKA YA BABOLA MOTEMA MABE ETULAKA TE.

12. EPAYI NA EZALI MOLAYI YA LIBANGA OYO EBWAKAMI.

13. KOPO OYO EZALI NA MAYI ELEKI EBALE OYO EKAWUKA NA TINA.

14. LOLEMU EVANDAKA NA BOLOKO YA MINO KASI EZUAKA LIBERTE TANGO ELINGI.

15. EBALE EZIPAMA TE EZALI MPETO; MOTEMA YA MOTO EZIPAMA KASI ETONDA MBINDO.

16. NA KATI YA ZAMBA BA NZETE EZALAKA MISATO : OYO ETELEMA, ETENGAMA, NA OYO ELALA.

17. LOKUTA ATA EWUMELI EBONGWANA KA VERITE TE.

18. BOTIKA KONI EPELA MPO EYEBI MOSALA MUSUSU TE.

19. AWA TO SUANI NA LIBONGO TO MATA BUATU MOKO TE.

20. BA FUTELAKI NGA MINERVAL KASI BALINGAKI NA ZWA TE.

21. SOKI OMONI MUTU AZALI KOSUKOLO NA MAYI YA BA NGANDO YE BAKE AZALI NA RENDEZ VOUS YA BOLINGO.

22. SOKI OMONI MUTU MPONA POSA YA MBUMA NSE MOKO YA NZETE AZALI KOSENGA BA KATA NZETE YEBA AZALI NA POSA YA MOKILI TE.

23. BABOMBA ENSENGO KASI NSANGO YA LIWA TE .

24. BAKO LONGA BISO MOKOLO NZAMBE AKOZALA DISTRAIT.

25. MATITI YA MOSIKA YANGO NDE YA POSA.

26. SOKI OLEYI NTABA OKOBOSANA ELONGI NA YE KASI SOKO OLEYI MUTU OKOBASANA ELONGI NA YE TE.

27. MABE YA KOMATA NA SONGE YA NGOMBA ESENGAKA MUTU AKITA.

28. BAWELI KOSOMBA MAPANGO NGA NA SOMBI ETENI YA EBALE MOKOLO MBOKA EKOZIKA NA MATONGI NA KOZANGA MAYI TE PONA KOBOMA MOTO YANGO.

29. MOTO EPELAKA MPE EKUFAKA NSE NA MOPEPE.

30. NGUNGI AKANISAKI BAZALI KOBETELA YE MABOKO, NZOKA BAZALI KOBOMA YE